« Nkáké » : différence entre les versions
m Fonctionnalité de suggestions de liens : 3 liens ajoutés. |
Aucun résumé des modifications Balises : Éditeur visuel mbóngwana ya bomɛmi Modification par le web mobile |
||
Mokɔlɔ́tɔ 9 : | Mokɔlɔ́tɔ 9 : | ||
Ba décharges électriques ezali source principale ya ba nitrites na ba nitrates, oyo ezali essentiel pona vie ya milona. Milona ezali na likoki te ya kosalela azote oyo ezali na mopɛpɛ mbala moko, yango wana esengeli kobongola yango na biloko mosusu ya azote. Nkake nde esalaka ba réactions chimiques wana, oyo esalaka que cycle ya azote ekende liboso. |
Ba décharges électriques ezali source principale ya ba nitrites na ba nitrates, oyo ezali essentiel pona vie ya milona. Milona ezali na likoki te ya kosalela azote oyo ezali na mopɛpɛ mbala moko, yango wana esengeli kobongola yango na biloko mosusu ya azote. Nkake nde esalaka ba réactions chimiques wana, oyo esalaka que cycle ya azote ekende liboso. |
||
Mɔtɔ ya zamba oyo ebimisaka na nkake ezali na mokumba monene mpo na evolisyo ya banzete, mpamba te kolya biloko oyo ekauki mpe kosilisa banyama mabe oyo ekoki kozala na mɔtɔ ezali na litomba mpo na ezingelo. |
Mɔtɔ ya zamba oyo ebimisaka na nkake ezali na mokumba monene mpo na evolisyo ya banzete, mpamba te kolya biloko oyo ekauki mpe kosilisa banyama mabe oyo ekoki kozala na mɔtɔ ezali na litomba mpo na ezingelo. Emonani ete lolenge ya evolisyo ya bomoi ya banzete ezali na boyokani makasi na kobima ya mɔ́tɔ, oyo ezali kolendisa kobima ya ba gènes ya sika. Ekoki kozala ete mɔ́tɔ oyo euti na nkake ezalaki liziba ya liboso ya mɔ́tɔ oyo bato ya kala basalelaki, oyo elingaki kozala moko ya matambe ya ntina oyo ememaki na evolisyo mpe bokonzi ya likambo oyo likoló na esika na yango. |
||
Bolukiluki moko ya météorologie emonisi mpe ete nkake esalisaka mpo na kopɛtola mopɛpɛ na ndenge ebimisaka ba radicaux hydroxyle na likoló ya lipata ya cumulonimbus. |
Bolukiluki moko ya météorologie emonisi mpe ete nkake esalisaka mpo na kopɛtola mopɛpɛ na ndenge ebimisaka ba radicaux hydroxyle na likoló ya lipata ya cumulonimbus. Yango esalaka na bamolekile mosusu oyo ezali na mopɛpɛ na ndenge ekómisaka yango oxydation. Processus yango ezuaka ba composés toxiques na atmosphère, lokola monoxyde de carbone na méthane oyo etalelami lokola ba gaz minene na réchauffement climatique mpe na kobebisa couche ya ozone. Yango epesaka kati ya 2% mpe 16% ya makoki ya oxidation ya atmosphère ya Mabele. |
||
{| style="float: right;" |
{| style="float: right;" |
Dernière version du 12 augústo 2024 à 14:38
Lisolo
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Ekoki kozala ete nkake ebimaki na Mabelé kala liboso ya bomoi, eleki sikoyo mbula koleka miliare misato. Longola yango, mbala mosusu nkake ezalaki na ntina mingi mpo na kosala bamolekile ya liboso ya biloko oyo ezali na bomoi, oyo ezalaki na ntina mingi mpo na komonana ya mitindo ya liboso ya bomoi. Uta ebandeli ya lisolo oyo ekomami, nkake esepelisaka bato. Mɔtɔ oyo nkake ebimisaka ntango ebɛti na mabele, nkake esalela yango mpo na kozala na molunge na butu, longola kobatela banyama ya zamba mosika. Yango wana, moto ya liboso alukaki biyano mpo na kolimbola likambo yango, mpe abimisaki biyambayamba mpe masapo oyo ekɔtisamaki na mangomba ya liboso.
Ntina ya Nkáké pona zamba
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Uta Mabelé esalemá, molunge makasi ya libenga ya mabele nde esalaka ete mipɛpɛ minene, ya mobulu mpe ya libela esalema, mpe yango ebimisaka mai monene. Mai, na boumeli ya zingazinga na yango, ememaka elongo na yango biloko ya chimique, lokola carbone mpe azote, oyo eyanganaka na mbu ya kala. Ekoki kozala ete kongɛnga ya ultraviolet mpe nkake esalisaki mingi na mosala ya kosangisa biloko yango oyo ezali na bomoi te mpe kobongola yango na ba acides aminés, biloko ya ntina mingi mpo na kobima ya bomoi.
Ba décharges électriques ezali source principale ya ba nitrites na ba nitrates, oyo ezali essentiel pona vie ya milona. Milona ezali na likoki te ya kosalela azote oyo ezali na mopɛpɛ mbala moko, yango wana esengeli kobongola yango na biloko mosusu ya azote. Nkake nde esalaka ba réactions chimiques wana, oyo esalaka que cycle ya azote ekende liboso.
Mɔtɔ ya zamba oyo ebimisaka na nkake ezali na mokumba monene mpo na evolisyo ya banzete, mpamba te kolya biloko oyo ekauki mpe kosilisa banyama mabe oyo ekoki kozala na mɔtɔ ezali na litomba mpo na ezingelo. Emonani ete lolenge ya evolisyo ya bomoi ya banzete ezali na boyokani makasi na kobima ya mɔ́tɔ, oyo ezali kolendisa kobima ya ba gènes ya sika. Ekoki kozala ete mɔ́tɔ oyo euti na nkake ezalaki liziba ya liboso ya mɔ́tɔ oyo bato ya kala basalelaki, oyo elingaki kozala moko ya matambe ya ntina oyo ememaki na evolisyo mpe bokonzi ya likambo oyo likoló na esika na yango.
Bolukiluki moko ya météorologie emonisi mpe ete nkake esalisaka mpo na kopɛtola mopɛpɛ na ndenge ebimisaka ba radicaux hydroxyle na likoló ya lipata ya cumulonimbus. Yango esalaka na bamolekile mosusu oyo ezali na mopɛpɛ na ndenge ekómisaka yango oxydation. Processus yango ezuaka ba composés toxiques na atmosphère, lokola monoxyde de carbone na méthane oyo etalelami lokola ba gaz minene na réchauffement climatique mpe na kobebisa couche ya ozone. Yango epesaka kati ya 2% mpe 16% ya makoki ya oxidation ya atmosphère ya Mabele.
Nkáké
Mabe to likama ya Nkáké
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Atako mbala mingi, nkake ebebisaka te, mbala na mbala esalemaka ete ebɛtaka moto, to ndako moko, oyo ekoki kobebisa.
Ntango ebɛti nzete, ekoki mpe kobimisa mɔtɔ. Ntango nkake ebɛti na libándá, ezali na makama mibale: kozala esika oyo eleki likoló na esika yango, mpe ntango nkake ebɛti pene na yo. Na likambo yango, courant ya nkake ekɔtaka na mabele mpe epalanganaka nokinoki na ngámbo nyonso. Yango wana ezali na bokoli mingi ya likama.
Moto oyo abeteli Nkáké akoki mbala mingi kokoma ebosono, kozwa pasi na komona to na koyoka, bopemi mabe to bokati mpema, Yango wana esengeli kosala nokinoki mpo na kobikisa bomoi ya bato mingi.
Ndenge nini esalemaka?
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Ntango liboso ya malili ekutani na liboso ya molunge, oyo ya liboso elekaka na nse ya oyo ya mibale, mpe ebimisaka mipepe oyo ezali komata mpe kokita na cumulonimbus (lipata oyo ezali ezaleli ya makambo ya mopɛpɛ makasi), oyo ekoki kozala na bonene ya bakilomɛtrɛ mingi. Ba charges électriques opposées esalemaka, eteni ya se ya lipata ezali na charge négative alors que eteni ya likolo ezali na charge positif.
Na bopusi ya mapata, mabele na ngala na yango ezwaka ba charges positives. Ntango bosangisi ya ba charges wana nyonso ekómi makasi mingi, nkake ebimaka na nse ya lipata oyo ezali na charge négative mpe ebɛtaka eloko oyo ezali na charge positif, mbala na mbala lipata mosusu, mpamba te nkake esalemaka mingimingi longwa na lipata mosusu. Nkake ebɛtaka mabele kaka mbala moko na kati ya bato minei.
Température ya flash ekoki kokóma 30 000 degrés Celsius. Ntango nkake etɔbɔlaka mopɛpɛ, molunge na yango ekómisaka yango monene mpe esalaka ete epanzana na mbalakaka mpe na ndenge yango, ebimisaka mbonge ya mongongo oyo babengaka nkake. Lokola pole etambolaka mbangu koleka mongongo, tomonaka nkake liboso tóyoka nkake.
Ntaka to tango oyo ekanisami na nkake?
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Ezali na etinda moko ya pete mpenza mpo na kosala calcul ya ntaka oyo ekaboli yo na nkake: kotanga kaka motango ya ba secondes kati na mokalali mpe nkake na yango. Na nsima, kabolá motángo yango na 3 mpo na kozwa ntaka ya penepene kati na yo mpe nkake oyo euti kobima.
Óyo ezalí ndámbo. Okoki kosálisa mpé kosungǎ. |